Luca azalaki kaka mwana moke ntango mokili na ye ebalukaki. Tata na ye, Geovani, mosangani ya mafia ya lokumu, atɛkaki ye na ndeko na ye moko, Jacques. Ba accusations ya lokuta, ba exécutions ya makila malili, ba faux accidents : libota na ye mobimba elongolamaki. Mpe Luca, oyo afundamaki na bosembo te mpo na koboma tata na ye moko, bakangaki ye. Kasi makambo nyonso elekaki ndenge bakanisaki te. Alex, mafioso moko ya Russie, azwaki mwango moko ya mpiko : asalaki lokuta ya liwa ya Luca na likama ya motuka mpe amemaki ye na kobombana na Russie. Kuna, Luca akómaki Pablo Smith. Na boumeli ya mbula motoba, azwaki formasyo, ayikaki mpiko mpe amibongwanaki na masini ya koboma bato. Mokano na ye : kozonga mpe kobebisa baye babebisaki bomoi na ye. Kozonga na identité ya lokuta, abeta na motema ya organisation : ko attaquer casino moko, ko détourner bibundeli, mpe kosala infiltration stratégique. A découvrir que liwa ya famille na ye esalemaki orchestrée, kasi yango kaka te. Libenga ya mombongo ya bilenge basi, oyo ebombami na mozindo na kati ya réseau, emonisi bonene ya mabe. Mpe Firmine, impliqué, ekomi cible na yango ya sima. Ba mafia bakanisaki que akufi. Ayebi te été ye moko akela fimbo na ye.